Shanghai

Shangai ezalí engumba epúsí monɛ́nɛ mpé etúká ya Sína. Evándaka o ngámbo íbalé ya ebale Yangzi.
Shangai ezalákí engumba monɛnɛ́ tɛ́ bosó mibú mya 1800, o nsima ekómákí libóngo lya bonkita na bisé bya Mpótó. Na mokɔlɔ mwa lɛlɔ́ ezalí libóngo lipúsí monɛ́nɛ lya Mabelé. Ndé ezalí engumba ya ntína o Sína, bato míngi bakɛndaka na Shangai mpɔ̂ na konkita, kasi mpé mpɔ̂ na matámboli ya esɛngɔ.